Lingala
Ozali na makanisi ya kozonga mboka na yo?
Organisation Internationale de Migration (OIM) ezali kobongisa manaka ya bozongi mboka oyo ekopesa makoki ya mobembo na bato oyo balingi kolongwa Finlande mpe kozonga na bonsomi nyonso na mboka oyo babotama. Baye bandimi kozonga mboka bakozua mosolo, mingi-mingi kobanda na 200€ kino 1.500€ po na mokóló mpe 100€ kino 1.000€ po na mwana moke, po ete esunga bango tango bakozonga na mboka. Manaka oyo ekoki mpe kopesa lisungi mosusu ya mwa likolo na nzela mosusu, lokola kofuta kelasi, kopesa bisaleli to koyekola misala ya maboko
Nani akoki kozua lisungi na manaka mabongisami na OIM?
Okoki kosenga lisungi ya kozonga mboka na bonsomi nyonso soki ozali koluka esika ya kobombama na ekolo Finlande to mpe osili kozua esika ya kovanda mpo na ntina ya kobatelama, to mpe lisusu soki mokanda na yo ya bopaya esili ngala mpe osengeli na lisungi po ya kozonga mboka. Soki bazali nanu koyekola bosenga na yo ya esika ya kobombama, osengeli kolongola yango po ete ozonga; na boye nde okozua lisungi ya manaka maye. Okondimama te soki ozali mwana mboka ya Union Européenne to pe osili kokoma mwana mboka Finlande. Soki ozali na situation ya pasi, ndakisa ozali mwana na nse ya mibu 18 mpe baboti bazali te, to ozali na bokono ya makasi to mpe bato mabe batekisaki yo (trafic), ezali malamu ete oloba yango polele na mokanda ya bosengi kozonga mboka. Sango wana ezali na ntina po na kobongisa makoki ya mobembo mpe bozongi mboka
Ekosalama ndenge nini?
Osengeli kotondisa mokanda ya bosengi kozonga mboka na bonsomi nyonso mpe mokanda ya OIM etali lisungi ya bozongi. Na mokanda ya kosenga lisungi mpo na bozongi mboka, osengeli komonisa ndenge nini okosalela lisungi bapesi yo wana ekozonga yo na mboka. OIM ekotala Bosenga ya moto moko na moko mpe ekotala efandeli na yo na mboka Finlande mpe bosenga na yo oyo otalisi.
Okoki kozua mikanda ya bosenga epayi na:
• Mosungi na yo oyo azuami na bilo ya leta to na esika ebongisami mpo na koyamba
• Na bilo ya polisi
• Na bilo ya OIM na Helsinki (tala na nse)
• Na nzela ya internet: www.assistedvoluntaryreturn.fi
Mikanda ya bosenga esengeli kotiyama mokoloto mpe kozonga na OIM na Helsinki po ete bayekola bosenga na yo mpe bayebisa yo soki ondimami. Soki bosenga na yo endimami, OIM Helsinki ekobongisa makoki ya mobembo elongo na yo.
OIM akoluka luka ba nsango
Na kati ya mwango (projet) oyo, OIM akoluka kosangisa ba nsango etali bato oyo balingi kozonga mboka na nzela ya mokanda to formulaire mosusu. Kaka OIM nde akoki kosalela sango oyo mpo na kokolisa misala na ye epai na baye bandimi bango moko kozonga mboka. Sango oyo ekosalelama po na makambo mosusu te, ndakisa po na bosenga ya kofanda na mboka Finlande. Sango nyonso oyo ezuami ekotikala sekele, mpe okokoma kombo na yo na mokanda to formulaire te. Soki oboyi koyanola mituna yango ezali mpe likambo te.
Mwango (Projet) ya OIM ewuti na mosolo mobongisami na Union Européenne mpo na bozongi mboka mpe na bilo ya Immigration ya ekolo Finlande (Migri).
YHTEYSTIEDOT